Matthew 21

Bayambi Yesu na kembo monene na Yeruzalem

(Mk. 11.1-11 ; Lk. 19.28-38 ; Jn. 12.12-19)

1Tango bapusanaki pene-pene ya Yeruzalem, mpe bakomaki na Betfaze, likolo ya ngomba ya banzete ya Olive, Yesu atindaki bayekoli mibale 2mpe alobaki na bango :

—Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango bokokomakaka na ebandeli ya mboka yango, bokomona mpunda ya mwasi oyo ezali ya kokangama, na mwana na yango pembeni. Bofungola yango, mpe bomemela ngai yango.
3Soki moto atuni bino likambo, bozongisa : “Nkolo azali na posa na yango”, mpe akotika yango noki.

4Makambo oyo esalamaki mpo ete maloba ya moprofeta ekokisama :
5 Boloba na elenge mwasi ya Siona :
Tala, Mokonzi na yo azali koya epai na yo ;
azali ya komikitisa
mpe avandi likolo ya mpunda ya mwasi,
likolo ya mwana ya mpunda,
mwana ya mpunda ya mwasi.

6Bayekoli bakendaki mpe basalaki ndenge Yesu atindaki bango. 7Bamemaki mpunda ya mwasi na mwana mpunda, batiaki bilamba na bango likolo na yango, bongo Yesu avandelaki yango. 8Bato ebele penza batandaki bilamba na bango na nzela, basusu bakataki bitape ya nzete mpe batiaki yango na nzela. 9Bato oyo bazalaki kokende liboso na ye, na baoyo bazalaki kolanda na sima, bazalaki koganga : Ozana na Mwana ya David !
Mapamboli na moto oyo aye na kombo ya Nkolo !
Ozana na bisika oyo eleki likolo !

10Tango Yesu akotaki na Yeruzalem, vile mobimba eninganaki, mpe bazalaki kotuna :

—Nani yango,

11Bongo bato bazalaki kozongisa :

—Ezali Yesu, moprofeta ya Nazareti oyo ya Galileya !

Yesu na kati ya Ndako ya Nzambe

(Mk. 11.15-19 ; Lk. 19.45-48 ; Jn. 2.13-16)

12Yesu akotaki na lopango ya Ndako ya Nzambe
Bateki mpe basombi oyo Yesu abenganaki, bazalaki na kati ya Ndako ya Nzambe te, kasi na lopango. Soki Bayuda bazalaki kolinga ata moke te eloko ya bosoto ekota na Ndako ya Nzambe, bongo ndenge nini balingaki kondima ete bato basala mombongo na bango na Ndako ya Nzambe ? Ekokaki kosalama te.
, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko. Abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kosanze mbongo, na bakiti ya baoyo bazalaki koteka bapijon.

13Bongo alobaki na bango :

—Ekomama : Ndako na ngai bakobenga yango ndako ya mabondeli ; kasi bino bokomisi yango nganda ya miyibi !

14Bato oyo bakufa miso, na bato oyo batambolaki tengu-tengu bayaki epai na ye, na lopango ya Ndako ya Nzambe, bongo ye abikisaki bango. 15Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bayokaki kanda mingi penza tango bamonaki makamwisi oyo Yesu asalaki, mpe ndenge bana bazalaki koganga na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe : “Ozana na Mwana na David !” 16Bongo batunaki ye :

—Ozali koyoka makambo bana oyo bazali koloba ?

Yesu azongiselaki bango :

—E e ! Naino botangi maloba oyo te : Ozwaki lokumu na monoko ya bana
mpe ya baoyo bamelaka mabele.

17Sima atikaki bango, abimaki na vile mpe akendaki na Betaniya, epai alalaki.

Yesu alakeli nzete ya figi mabe

(Mk. 11.12-14,20-25)

18Na tongo-tongo, tango azalaki kozonga na vile, ayokaki nzala. 19Tango amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pembeni na yango, kasi amonaki ata eloko moko te, kaka makasa. Bongo alobaki na nzete yango :

—Okobota lisusu mbuma te !

Mpe kaka na tango wana nzete ya figi ekawukaki.

20Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi, mpe batunaki :

—Ndenge nini nzete ya figi ekawuki na mbala moko boye ?

21Yesu azongisaki :

—Nalobi na bino ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kosala kaka makambo oyo ngai nasali na nzete ya figite, kasi bokoki mpe koloba na ngomba oyo : “Longwa mpe mibwaka na ebale”, yango ekosalama.
22Nyonso oyo bokosenga na libondeli, bokozwa yango soki bondimi.

Bokonzi ya Yesu endimami te

(Mk. 11.27-33 ; Lk. 20.1-3)

23Yesu akotaki na Ndako ya Nzambe ; mpe tango azalaki koteya, bakonzi ya banganga-Nzambe na bampaka bayaki epai na ye, mpe batunaki ye :

—Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini ? Nani apesaki yo bokonzi yango ?

24Yesu azongisaki :

—Ngai mpe nakotuna bino motuna moko. Soki bozongiseli ngai eyano, bongo ngai mpe nakoyebisa bino soki na bokonzi nini nazali kosalela makambo oyo.
25Nani apesaki Jean ndingisa mpo na kobatisa, Nzambe to bato ?

Batianaki tembe bango na bango, mpe balobaki :

—Soki tolobi : “Nzambe”, ye akotuna biso : “Bongo mpo na nini bondimelaki ye te ?”
26Soki mpe tolobi : “Bato”, tozali kobanga bato pamba te batonyonso bayebi ete Jean azalaki moprofeta.

27Bongo bazongiselaki Yesu :

—Toyebi te !

Bongo Yesu mpe alobaki na bango :

—Ngai mpe nakoyebisa bino te soki na bokonzi nini nazali kosalela makambo oyo.

Lisapo ya bana mibale

28—Bokanisi nini ? Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali. Akendaki epai ya oyo ya liboso mpe alobaki na ye : “Mwana na ngai, kendekosala lelo na elanga ya vino”.

29Azongisaki : “Nalingi te” Kasi sima, abongolaki makanisi mpe akendaki. 30Bongo tata akendaki epai ya mwana mosusu mpe alobaki na ye kaka ndenge moko. Azongisaki : “Nakei, tata !” Kasi akendaki te.

31Nani na kati na bango mibale asalaki likambo tata na ye alingaki ?

—Mwana ya liboso.

Bongo Yesu alobaki na bango :

—Nalobi na bino ya solo : bafutisi mpako na basi ya ndumba, bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino.
32Pamba te Jean ayaki epai na bino mpo na kolakisa bino nzelaya bosembo, kasi bondimelaki ye te. Nzokande bafutisi mpako na basi ya ndumba bandimelaki ye. Kasi bino, ata bomonaki bongo, bobongolakimitema te mpe bondimelaki ye te !

Lisapo ya basali mabe ya elanga ya vino

(Mk. 12.1-12 ; Lk. 20.9-19)

33—Boyoka lisapo mosusu. Moto moko azalaki na elanga : akonaki banzete ya vino, asalelaki yango lopango, mpe atimolaki libulu moko mpo na kokamola mbuma. Bongo atongaki ndako moko ya molayi mpo na mokengeli. Sima, apesaki elanga na maboko ya basali ya elanga mpo bafutelaka, mpe akendaki na mobembo.

34Tango elaka ya kobuka mbuma ekomaki pene-pene, atindaki basali na ye epai ya bato oyo bazalaki kofutela elanga, mpo na kozwa ndambo na ye ya mbuma. 35Bafuteli ya elanga bakangaki basali na ye ; babetaki moko, babomaki mosusu, mpe babambaki oyo ya misato mabanga.

36Atindaki lisusu basali mosusu mingi koleka baoyo ya liboso ; kasi bafuteli ya elanga, basalaki bango kaka ndenge moko.

37Bongo suka na yango, atindelaki bango mwana na ye, mpe alobaki : “Bakotosa mwana na ngai !”

38Kasi tango bafuteli ya elanga bamonaki mwana, balobanaki :

“Tala moto akokoma nkolo ya elanga. Boya, toboma ye mpe tozwa elanga na ye !”

39Bakangaki ye, babendaki ye na libanda ya elanga ya vino, mpe babomaki ye. 40Bongo, tango nkolo ya elanga ya vino akoya, akosala bafuteli wana nini ?

41Bazongiselaki ye :

—Akoboma bato wana ya mabe na liwa moko ya nsomo penza ; akopesa elanga ya vino epai ya bato mosusu, mpe bango bakobanda kopesaye ndambo na ye ya mbuma, na tango oyo babukaka !

42Sima Yesu alobaki na bango :

—Botangi naino na Makomi te : Libanga oyo batongi na ndako babwakaki,
ekomi libanga ya songe ya ndako ;
oyo ezali mosala ya Nkolo,
mpe likambo ya kokamwa
na miso na biso !

43Yango wana nalobi na bino : Bakolongola Bokonzi ya Nzambe na maboko na binompe bakopesa yango epai ya bato oyo bakobotela yango mbuma. 44[Kasi moto oyo akokweya likolo ya libanga yango, akokweya likolo ya libanga yango akobukana biteni-biteni ; mpe moto oyo libanga yango ekokweyila ye, akonikama
Verset oyo ezali te na mikanda mingi (tala Luka 20.18).
.]

45Sima ya koyoka masapo oyo, bakonzi ya banganga-Nzambe na bafarizeo bayebakiete Yesu azalaki koloba mpo na bango. 46Balukaki mwaye ya kokanga ye, kasi babangaki bato. Pamba te bato bazalaki komona ye ete azali moprofeta.
Copyright information for LinMNB